Lingala


ISHANGO
MOKUWA YA ISHANGO, OYO ETIKALI NA MAKANISI MA BISO EZALI NINI ?

Okati ya bamilioni ya biloko biye bimonanaki o ngambo ya ISHAANGO wapi epayi lisanga liye likambamaki na Jean de Heinzelin, bango penza batiaki maboko o’ mosala ya boluki-luki.
Bosengeli koyeba ete moko ya mokuwa ebendaki bokebi ba bato, pe moponamaki lokola mokuwa ya yambo, yango nde ezuaki esika ya likolo o’ kati ya baluki banso ya mongo ya Afrika.


Na yango boyeba ete bato ba mayele bazuaki mokano ya kobenga yango ‘’mokuwa motuya ya Ishango’’ too pe ‘’lingenda ya Ishango’’. Nzoka nde mokuwa mona mozali bisalelo moye mosalami na nsonge kolandisama na bilembo mya ndenge mamonamaki o'kati ya mokuwa.

Nde mama na likambo lisali ete biloko bisusu bya motuya mpe bisalelo bya tango ya kala mobombama pe bibatelama lolenge ya malamu. Na yango batalisi ete biloko bina bizali penza mingi te na mikolo miye.

Epayi esusu, bosengeli koyeba ete o’kati ya mokuwa mona moponamaki, moko na yango mozali penza malamu, pe mosalisi na kosunga misala mya ndenge na ndenge ; mingi penza kobatela loposo, kolongola bokono bisusu biye bitungisaka bomoyi bua biso.

O’ ngambo ya bato ba mayele, balakisi biso lolenge mokuwa ya manzaka Mona bakataki yango pe balongolaki biloko bisusu po te ngambo moko mopolaki, nde epesaki nzela na boluki kolongola yango, nde ebongisi penza polele elongi na yango ya kala oyo o’tango eena ebandaka penza bokebi bya bato, po te mizalaki penza nyama moye momeka mabele.

Tosengeli kopusa makanisi pe koyeba?
Moko ya mokuwa too pe manzaka mosali ete moyebana makasi, po te lolenge mobongisami nde epusi lisusu mituna pona kopesa ndimbola.

Na yango mokoki kozala mokuwa miye mizali na bilembo ma motango na nkama moko na ntuku motoba na muambe, nde esimbami na bandelo miye mikabolami na biteni misato ya nzete.

Balakisi biso te
Jean De Heinzelin akendeki kotalisa misala miye misalamaki elongo na bato bazalaki o’lisanga mya ye. Nzoka nde kolandisama na makanisi ma bato bayike mosalamaka mbala mingi na tango ya kala. Na yango penza batalisaki lolenge kani ya kotanga mambi matali motuya ya makambo matali bilembo ya ba mikuwa.

Na yango De Heinzelin alukaki mikanda ya boyebi kotanga ndakisa koyeba kobakisa motango pe kolongola mitano. Nde mama na likambo lisali na bozindo ya makanisi. Ba sosolisi biso été o’eleko ena moyebana te o mayele ma bato.

Na mobu koto lyoko na kama libua na tuku mitano na sambo, Jean de Heinzelin atalisaki lisusu na molongo mobimba makanisi maye na nzela na boluki ya Ishango.

Moboko ya kati.
O’katina mambi mya mitango batalisi biso lolenge ya kobakisa misato, pe motoba, mineyi na
muambe, mitano pe zomi ; epayi esusu batalisi ete kaka mikuwa mabale nde elimbolami te.
Tozali na mokuwa wa mitano pe ya sambo.

Moboko ya loboko ya mobali.
Yango etalisi motango miye mizali kosangisa motango ya zomi. Nde ezali evandelo monene o
nzela ya masini too pe o nzela ya singa. Liye liyebani nde tokozua ndakisa zomi na libua =
ewuti na tuku mibale kolongola moko.

  • 11 = 10 + 1
  • 21 = 20 + 1
  • 19 = 20 – 1
  • 9 = 10 - 1

Moboko ya loboko ya muasi.
Baye Ishango bayebaki mitango ya yambo, pamba te zomi na moko (11), zomi na misato
(13), zomi na sambo (17) pe zomi na libua (19) bizali mitango mua yambo miye mizali o katikati
ya zomi (10) pe tuku mibale (20). Motango liboso ezali motango oyo ekabuanaka kaka
na motango lyoko (1) na pe ye moko kaka.

Baluki-luki basusu bamipesi mingi penza na mosala ya bobongoli ba misala bia malamu.
Nzoka nde bato ba mayele o’kati na bango, DIRK HUYLEBROUCK pe VLADIMIR PLETSER, bazali bato
ya yambo bapesaki makanisi ya kokoma motango. Na yango Jean de Heinzelin na bango
basalaki été bazua nzete lokola mokuwa to pe nkoni ya moke. Yango nde ekosunga koyekola,
pe ekopesa nzela ya bolongoli nde ekosala été mobutisa bivandelo ya makanisi, ndakisa
misato pe mineyi.

Alexander Marschack, moko ya baluki-luki ya biloko bya kala ya eteyelo ya likolo ya Harvard,
ye penza atalisaki makanisi maye na mambi matali bokomi bya mitango, pe kotia bondeko
o’kati ya manaka ya molongo.

Na yango, Olivier Keller, moko ya bato ya mayele na bolongoli pe bobakisi mitango, ye PE
lokola akebisaki baye banso bakotelemela mambi matali ntombuamba ya ntoki na biso.

Na yango bato ya mayele bamipesaki na koluka kosalisa naye matali kolongola moko ya
biteni ya mikuwa too pe mabanga pona kotika bilembo na nzoto. Baye bayebi penza mosala
ya matematiki, kolongola to pe kobakisa.

Epayi esusu, Dirk Huylebrouck na Vladimir Pletser bazongelaki makanisi ya Jean de Heinzelin ; pe basali kolandela ba nzete lokola to pe lolenge ya koyeba kotanga. Manso mazali kolandisama
kobanda molongo ya misato pe ya mineyi, pe kokotisa yango na kotalela zomi na libale.

Na yango bazali kokanisa lolenge kani bakoki koluka kavandisa makanisi na maye matali
mabongisi ma yambo.

Alexander Marschack, moko ya baluki biloko ya kala o’mabele, motangisi na eteyelo ya likolo
ya Harvard, ye pe lokola apesaki makanisi maye lolenge ya kopesa motango ya kosangisa
manaka on nzela ya mokili mobimba.

Olivier Keller, moko ya balakisi ya mambi matali matematiki, ye pe lokola, akebisaki bizaleli
manso mizali kotelemela ntoki na biso na mikolo miye manso mana mazali se po na komona
motango bisika banso eye mozali kopekisa bato baye bakomona pe bakoyamba bilembo
bisusu. Nzoka nde bilembo bina bikotiama na mikanda mya ndenge na ndenge. Ndakisa,
mokuwa, mabanga, bikeko pe biloko bisusu.

Tomituni soki solo tozali kokanisa biloko bina bizali motango ya milioni mibale na mitano ?
Nde etalisi te bato ba mayele baye bazua mokumba ya kolongola pe kobakisa, to pe bayi
matematiki, nde bazali na boyebi makasi na mambi matali manso matali motango.

Lokola mambi boyebi mosi mokili mosika o’nteyi ya molongo mobimba. Mituna mingi
mosopani ya koloba lolenge kani kosalela yango ? Pona nini ? Kosangisa mambi ma bolongoli
to pe kobakisa mingi (calcul), yango nde bizali boyebi po na bokaboli na batu banso ? Yango
nde mozali motuya po na baye bazangi boyebi ?

Na yango na mikolo miye, mabele ya Ishango motalisi été mabombelo bisusu molobaki te,
basali bongo kobomba yango po bayebi nini penza ya motuya mizalaka o’eleko ena.

Se na yango, esanga ya Semliki evandi malamu o’kati ya mabele bisusu bia tango ya kala.
Nzoka nde etando ena ya Afrika bozalaki na bato bayike baye babibiangamaki ba HOMO
SAPIENS nkama milioni o’eleko ena ya kala.

Na yango, totalisi bino na polele ete tozali kozanga bilembo biyike oyo mokalakisa biso
lolenge kani bato baana bazalaki kobika, pe makanisi ma bato baana ba Ishangiens mozali
Na yango, mikolo moko too pe na mikolo mikoya, esengeli na biso kotinda lisusu baluki-luki
ya mabele ya makambo ya kala, bakende kuna o’ngambo ya mayi monene ya laki Édouard
pona kobakisa maye mazangi. Bosengeli koyeba ete misala mina bya boluki mibandaka na
libua ya nkoto yoko na nkama libua na tuku mitano (1950). Nde totalisi soolo biloko to pe
bilembo bisusu bya motuya mibombani kuna.

Esungami : na lisanga ya baye batalisaka o’nzela ya bilili pe sango ya baluki-luki ya mabele
o’tango kala (na bokuse ADIA), kuna na eteyelo ya likolo oyo ya SCIENCES NATURELLES
o’mboka Belgique.


  • Traduit par Mme MAYINDU LUSAKUENO Malou-Fidélise, Licenciée en animation culturelle,
    journaliste à la RTNC2 (Radio Télévision Nationale Congolaise), productrice et présentatrice de l’émission ART, CULTURE ET DÉVELOPPEMENT sous la supervision de MWANA SOLEIL a.s.b.l.